:Religious Adventurism in Islam
  Non - Arabic Articles Lingala

: Religious Adventurism in Islam
: webmaster

Mouvement Anti Ahmadiyya en Islam

 

Lisano ya lingomba o kati ya Islam

Ekomami na Tahira Parwez

 

 

Ba Musulmans bazali kondima pe kosalela mateya ya Ntoma Muhammad (SAW) pamba te yende aza suka ya ba Ntoma ya solo, nzoka nde Qur’an eyebani ete ezali o kati ya mikanda misatu mwa suka uta epa ya Allah. Boyambi oyo okoyamba o libanda ya mateya ya Qur’an ekomema yo na nzela mabe. Islam lolenge moko na mangomba mususu ezuaki ba Ntoma ya lukuta kobanda ebandeli na yango. Pamba te basusu o kati na bango bazangaki mayele. Basusu bamonanaki batu ya masano o kati ya lingomba kolanda na maloba ya Allama Aqbal, bokomona yango o kati ya Makomi maye. Bomoyi na bango etali mingi na bomati ya Mullahisme kolandana Islam ya ba Kitani. Na kokanisa yango bisika nyoso, na ba clergé mingi mingi o tango bakonzi ya ba Musulmans ekweyaka. Musaylina, Sadjah, al-Aswad al-Ansi pe Tulayha bin Khuwaylid batu oyo bamitiaki bontoma na tango to mwa sima muke ya kowa Ntoma Muhammad (SAW). Bayebani na polele ete bazali ba kambi ya ridda  pamba te bango babyaki bokonzi bua Médine po ete bakoka kotia makanisi na bango ya bonsomi ya bikolo to ya mboka.

 

Al-Aswad, « Mobongwami» ye azalaka mokambi ya liboso ya ridda o mboka Yémen. Ezali likambo ya kosolola koyeba soki azalaka musulman to te. Ye azalaki kobikola na koloba ete akobikolaka na kombo na Allah, akosalaka misala ya mulili lokola magie. O sima ya koboma Sahar, oyo azalaka mokonzi ya ekolo na bango, akati kingo ya ba yekoli mibale (Swahaba) ya Ntoma Muhammad (SAW) nde abeleli bonsomi naye. Bokonzi naye eumeli te esali kaka sanza mibale pamba te batu naye na mwasi ya Sahar oyo abalaki na makasi babomaki ye.

 

Musaylina (al-kazab) ye amilobelaki ete ye aza Ntoma na sima ya liwa ya Howda , nyoso wana po akokisa posa naye ya bokambi ya Banu Hanifa (630 AD). Ye apesaki ningisa losambo ezala misato, kokila ngizi (jeûne) pe apekisaki masanga (koswana!). Azali kondima kosekwisama. Baboyaki ye po na mokanda akomelaki Ntoma Muhammad (SAW) mubu 632 AD po na koluka kokobola bokonzi. Abubakar (RA) Calife ya yambo atindaki Khalid bin Walid (RA) na mapinga makasi nde esukisaki bomoyi naye na posa naye, abalaki mwasi na kombo Sadjah ya ekolo ya Tamim, mwasi oyo amibengaki Ntoma.

 

Ndenge moko na Al-Haruth bin Said ye pe amibengaki Ntoma na tangu ya bokambi ya Omayade Abd-al-Malik bin Marwan, ye azuwaki lislisi ya ndambo ya mapinga ya mokonzi ya mboka. Manso mazalaka na mubu 698 – 699 AD.

Imam Abu Hanifa ye andimaki makasi penza suka ya bo ntoma ya Prophète Muhammad (Khutum-e-nabuwat) nde apesaki ndingisa ete musulman nyoso oyo akondima ete kingandi azali Ntoma pe alakisi yango ye akozala mupengwi. Imam andimaki te kotika mutu ata moko te kolakisa to koteya ki ntoma ya lukuta na tango naye (699 – 767 AD).

 

Lolenge moko mubebisi Shiite na kombo al-Mkhtar bin Abi Ubayd yepe aye amibengaki Ntoma. Muhammad bin Sa’id (al-muslub) ye pe ayebanaki o kati ya batu mine babebisi baye ba bongolaka ba hadiths oyo Ntoma Muhammad (SAW) alobi: «Ngai na zali suka ya ba Ntoma ( Prophètes) Ntoma moko te akoya o sima na nga» nde mubebisi Muhammad bin Sa’id aakisi akoloba ete : « kaka soki Nzambe alingi akoki kotinda Ntoma mususu» ( oyo eza lukuta naye). Nzoka nde asalaki boye po ete akoka kozua nzela ya komibenga Ntoma. Abomamaki na ndingisa ya calife Abbasside Abu Jafar-al-Mansur.

 

Hashim bin al-Hakim oyo ayebanaki mingi na kombo ya al-Muqanna, ye pe lokola amibengaki Ntoma o mboka Khurasan o tango ya bokambi ya calife Abbasside al-Mahadi. Eyebani na polele ete o zuaki lisalisi o kati ya lboka ena. Nzambe nde bamokangaki ye pe bamobomaki o mubu 779 – 780 AD na sima ya bitumba ya makasi ya mapinga ya calife Mahmud bin al Faraj ye pe amibimisa o mboka Samara o mibu 849 – 850 AD. Ye abandaki komikua ete Sango Malamu Qur’an abandaki bongo kokitilaye o nzela ya Angelu Gabriel. Ye pe azuaki balandi bayike na mboka Samara na Bagdad. Nde babomaki ye na ningisa ya calife al-Mutawakkil. Mirza Ali Muhammad, ayebani mingi na kombo ya Bad (Ezipeli) abotamaki mubu 1819 AD akolaki o mboka Shiraz na Iran. Ye atangaki ti kino akokisaki mibuu zomi na mitanu (15 ans). Nasima, akotaki o musala ya mo mbongo ye na nook naye. Abalaki tango akokisaki mibuu tuku mibale na mibale (22 ans). Nde azuaki mwana kasi mwana awaki azal nano mwana muke. Omomesano ya bandeko ya eyamba ya Shiite, eyebani ete Imam wa bango oyo abombama babanda kozela ye o mubu 1260 hégire (1844 AD) nzoka nde mubu mwana nde ekokisi mibuu nkoto yoko ya kobunga naye. Bâb azalaka moyambi ya eyamba ya Shaykh’is ye azalaki na kondima ete Mutindami ya Nsambe na bango akoya noki. Tango Bâb amibengaki «Munoko ya Ndako(Porte) (Bâb)» yako kota epayi ya ba Imam zomi na mibale abakisaki makanisi mususu ; nde asepelisaki Shaykh’is pe ba batisi ye ba pesi ye kombo Babis. Nasima ya bapteme nde amibengi ete ye nde Imam oyo ba bandaki kozela (oyo abunga), nakolakisa ete kolanda na mateya ya Shaykh’is elakisi ete Imam a kofanda na Hurqalya ( esika ya bilili ya solo). Nzoka nde, boyeyi yaye ebandaki kozelama ya musuni te, kasi na lolenge mususu ya Hurqalya oyo ezali bongo kolakisa elongi ya solo ya Imam. Nasima na mikolo nde Mahdi ( Imam ya kobombana), akomaki komibenga Nuqtiyiula (elakisi Ntoma Muhammad SAW) ; pe po nakolinga kobebisa mokili nde aye koloba ete Qur’an na Sharia ya Islam eza lisusu na tina moko te. Nde Banganga Nzambe baye bosembo ya ba Shiite na ba Sunites banso bazalaki monoko moko bakati likambo ete Bâb akota boloko mbala na mbala pe abomamaki o mubu 1850.

 

Mirza Husayn Ali, Bahaullah ye azalaki moyokoli munene ya Bab, abotamaki o mubu 1871 o mboka Téhéran. Ye azalaki mwana ya yambo ya libota lia Mirza Abbas ya Nur, azalaki Ministre d’Etat. Ayokolaki o kati ya libota. Akangamaki o mubu 1852 pamba te asalisaki Babis pona koluka ko boma Shah. Bahaullah azuaki bokono makasi o kati ya boloko, epai wapi azuaki nzela ya ko kima o mboka Bagdad (pamba te balingaki b aboma ye) sima ya Mokonzi Moko ya mboka Russe kolobela ye. Banganga Nzambe ya Islam ya mboka Bagdad baboyaki Bahaullah na missala naye ti kino Mokonzi ya Mboka asengaki bakoka kobimisa Bahaulah na bayokomi naye ti o mboka Cpnstantinople na sima bakendeki o mboka Andrianople.

 

O tango ya mobembo, o mubu 1863, Bahaullah amibenga Ntoma, « le Promis  (Ya elaka)» ( kolandana na Sango Malamu ya Bâb alobaka ete Bahaullah akozala Ntoma), andimama na lisanga ya Babis. Lelo bayebani na kombo ya Bahais . Lolenge moko lisanga moko ya muke ezalaki kokambama na leki naye na kombo Mirza Yahya, ye azali mokitani ya Bab . Ba Musulmans baboyaki kolanda bondimi bona bwa babebisi. Po na likambo lina, nde Mbula Matali ya mboka Turquie aboyaki Babis na Bahaibakoka kokota te o mboka Adrianople. Nde Bahauallh na bayambi naye bakimaki ti o mboka Akka (Acre), mboka oyo  azalaka na Prison ( boloko) o mubu 1868 na mboka Palestine, otango wana nde Mirza Yahya na ba yambi naye bakendeki o mboka Chypre. Bahaullah akufaki o mubu 1892 atikaki bokonzi na mwana naye ya yambo o kombo Abdul Baha (Abbas Effendi). Yepe akufaki o mubu 1921. Shoghi Effendi yen de akamataki bokonzi ye pe akufaki o mubu 1957 atiki ebonga na mutu te. Mikolo oyo eyamba ya Bahai ezali kokambama na lingomba moko na kombo « Maison Universelle de Justice ».

 

Mirza Ghulam Ahmad ye abotama o mboka Qadiyan (Inde) o mubu 1830. Ye akola o kati ya ndako ya Banganga Nzambe ya Sunites na Shiites.

 

Asalaki mosala ya kalaka azalaki mutu ya mibale o kati ya Bureau ya Commissaire Adjoint o mboka Sialkot ye azangaki mumekano mbala misato po akoka komata grade, tango akweyi nde abongoli makanisi akeyi kosala mosala ya lingomba. Abandaki kokutana mingi na Révérand Butler, ye azalaki moko ya batu minene ya yamba ya ba christo, commissaire Adjoint ye nde asangisaki bango. Nasima nde Ghulam Ahmad atiki mosala ya lingomba pe azongaki o mboka Qadiyan na sima ya liwa ya Papa naye.

 

Nasima ya mibuu tuku mibale, ye azalaki koteya ete ye azali musantu, aye kobongola lingomba, pe azali mubateli ya bondimi. Tala lukuta naye ye alobaki azali Mahdi ya elaka, alobi lisusu azali Massiya ya elaka  aye koloba lisusu ete azali Ntoma. Mwasi naye ya yambo na bana naye na ndambo ya ba musulmans baboyaki ye na lingomba naye, kasi batu mususu balandaki ye na bondimi naye ya sika. Nde azalaki koloba ete ba musulmans banso baye baboyi ye bazali ba pengwi (kafir). Po na makambo oyo, nde, ba musulmans na banganga nzambe bazui mukano mwana boyambamaki na ba musulmans ya molongo mubimba. Elobami ete Ahmad Ghulam akufaki muu 1908 na bokono ya pulupulu (choléra) sima ya kobela makasi bokono ya paralysie, diabète na liboma. Sima ya liwa naye, nde, bayokoli baye bakabwanaki biteni bibale, ba Qadianis na ba Lahoris.

 

Magisme (basangana na mangomba mususu Zoroastre, Judaisme, christianisme, Chaldéenne pe Sabéenne) bango banso babandaki (bazalaki) kokanga batu na bohumbu ya bondimi bwa bango ti kino Islam eye kofungula bango.

 

Mangomba ya Bahais na ya Ahmadiyya bango bazalaki makasi pona bozoba bwa ba Mullahisme pe basalisamaki na bulamatali ya ba ngeleza na tango ba musulmans bakomaki na botawu.

 

Références :

·        Roohani Khazain Ekomami na Mirza Ghulam A. Qadiani

·        Bahaullah and the New Era Ekomami na I.E Esslemont

·        Qadianies and the Orthodox Muslims Ekomami na Iqbal

·        Jhootey Nabi-False Prophets Ekomami na Rafiq Dilawari

·        Talbess-e-iblees Ekomami na Rafiq Dilawari

 

Mouvement Anti Ahmadiyya en Islam

Dr Syed Rashid Ali

PO BOX 11560 Dibba, Al Fujairah. U.A.E

E-mail: rasyed@emirates.net.ae/alhafeez.org/rashd

 

:   admin       (   )
: 0 /5 ( 0 )

: 26-11-2009

: 800