:Lingala3
  Non - Arabic Articles Lingala

: Lingala3
: webmaster

Mouvement Anti Ahmadiyya en Islam

MIRZA GHULAM AHMAD YE NDE IMAM MAHDI ?

Ekomami na Dr. Syed Rashid Ali

Eee bino batangi,

Assalam Alaykum.

Islam ezali lingoma liye lindimami epa ya Allah, Qur’an nde ezali mokonda mua sango malamu mua suka uta epai ya bikelamu mokomeli biso kolekela nzela ya mutindami mua ye mua suka Muhammad ( SAW). Propheta Mosantu oyo asili koloba o kati ya ba hadiths ete azali Ntoma wa Nzame wa suka. Alobelaki lisusu boyeyi bua Imam Mahdi pe Yesu Massiya Muana ya Mariya Liboso ya mokolo ya bosambisami mua suka ( Qiyamah). Makonzi masato mana mazali okati ya bondimi bua ba musulmas uta bomoyi bua Propheta Muhammad ( SAW) ti mokolo mua lelo.

Nzoka nde, kobanda mbuu 1400 eye esili koleka, batu ya lukuta bazalaki mingi, bakosaki ete bazali kokokisa bisika misatu : Propheta, Masiya na Mahdi .Na mikolo oyo, tozalaki mutuya lolenge lona, Mirza Ghulam Ahmad Qadiani, mozalisi wa lingomba la Ahmadiyyah.

Ye amitiaki ete azali Propheta, Massiya pe Imam Mahdi mbala moko, nyoso okati ya moto moko. Ata soki bondimi ya lukuta, ye na balandi baye bazali komimona ete bazali ba musulmas pe ba balongi ( champion) ya Islam. Bazali kobenga ba musulmans mususu banso bazali ba kaafirs pe ba bungi.

Okati ya mokanda oyo, tokoluka koyea makanisi mabango nyoso kolandana na Qur’an na hadiths, po na litomba ( intérêts) la ba ndeko babiso baye bayebi te, baye bayoki naino te bazali kolobela likambo litali Mirza Ghulam to Ahmadiyyah / Qadianiyah kotiama pene ya mitambo ya makanisi ya bango. ( Ahmadiyya).

Islam – Lingomba liye lindimami epa ya Allah

Allah akokisaki bolamu naye likolo na biso pe ayebisaki biso boye :

Qur’an 5 : 33 : « … lelo, nakokiseli bino lingomba na bino, pe na sukiseli bino bolamu na ngai pe na poneli bino Islam ezala Lingomba na bino ».

Santu Propheta Muhammad ( SAW) – Ye nde Ntoma wa Suka

Allah azali koyebisa biso sango ete propheta moko te akoya na sima ya Muhammad ( SAW).

Qur’an 33 :40 : « Muhammad azalaki tata ya mutu moko te na kati ya mibali na bino, kasi ye azali Mutindami mua Nzambe pe suka ya bantoma. Na Nzambe azali moyebi wa eloko inso ».

Santu Propheta Muhammad ( SAW) alakisaki boye :

« Bikolo bia Israël bikambamaki na ba propheta. Soki moko akufi, mususu aye nasima naye. Kasi propheta moko te akoya sima na ngai, kaka ba kitani ( califes) nde ba kokitana ngai. » . ( Bukhari, Kitabul – Munaqib).

Propheta ya Nzambe ( SAW) alobaki :

« Bisika na ngai na esika ya ba propheta oyo bayaki liboso na ngai ekoki konkambulama na lolenge loye : Mutu moko atongaki ndako pe abongisaki yango kitoko mingi kasi atikaki lidusu la biriki moko. Batu bazali ko zunguluka ndako ena, bazali kosepela na kitoko ya ndako ena, kasi bazali kokamua bozagi bua biliki. Ngai ( Propheta Muhammad) nde nazali lokola biliki liye litikamaki pe nazali suka ya molongo ya ba Ntoma ( Propheta) ». ( Bukhari, Kitab – ul – Munaqib).

( Tokoki koloba boye, po na boye ( la venue) bua Propheta Muhammad ( SAW, nde ekokisami botongi bua ba Propheta, ete ezali ata nalidusu moko te liye Propheta mususu akoki koya lisusu te).

- Santu Propheta ( SAW) alobaki : « Nzambe apesi ngai makambo motoba maye ba Propheta baye nalanda bazuaki yango te :

· Napesamaki don ya koloba na bukuse pe maloba mantina.

· Napesamaki elikya ya bolongi olikolo ya bobangi na ngai.

· Nandimelami kuzua bakangami ba bitumba na biliko a bango.

· Napesameli mabele mobimba ( nyoso) ezali esika ya losamo pe ezala esika ya opeto. Eligi kolakisa ete okati ya ligoma a gai. Losamo ezali kaka o kati ya ba ndako te to esika songolo te. Losambo lokoki kosalema esika nyoso o kati ya mabele. Soki mayi mazangi, bokoki kopetola nzoto na mabele ( tayammum soki mayi mazangi.

· Nzambe atindaki ngai po ete na mema sango malamu o kati ya molongo mobimba.

· Pe ngai nde nasukisi molongo ya ba Propheta. » ( Eyambami na Muslim, Tirmidhi, Ibn Majah).

- Propheta wa Allah ( SAW) alobaki : « Mulongo ya ba Ntoma na ba Propheta esili kokoma na suka. Akozala lisusu te Ntoma moko te, Propheta moko te o sima na ngai. ». ( Tirmidhi, Kitab – ur – Rouya : Babu Zahab – un – Nubbuwwa, Musnad Ahmad, Marwiyat – Anas Bin Malik).

- Santu Propheta ( SAW) alobaki : « Ngai nde Muhammad, Ngai nde Ahmad, Ngai nazali molongoli pe lukuta eko bunga po na ngai, Ngai nazali mosangisi. Batu bakosangana mokolo mua bosambisi bua suka ( jugement dernier) sima na ngai (elingi koloba ete, bosambisami bozali kaka bokitani bua Ngai). Pe nazali wa suka elingi koloba ete nasima ba Ngai Propheta mususu akoya te. » ( Bukhari na Muslim, Kitab – ul – Fad – il, Bab : Asmaun – Nabi, Tirmidhi, Kitab – ul – Adab, Bab : Asma – un – Nabi, Muatta, Kitab – u – Asma – in – nabi, Al- Mustadarak Hakim, Kitab – ul – Tarikh, Bab : Asma – un – Nabi).

- Propheta wa Nzambe ( SAW) akebisaki : « Nzambe Mokonzi atindaki te o kati ya Mokili Ntoma moko te kaka akebisa batu naye boyeyi bua Dajjal ( Antichrist) kasi Dajjal ayaki te o tango Bantoma bana bazalaki na bomoyi. Ngai nazali wasuka o kati ya molongo ya bontoma pe bino bozali lingomba lasuka la bandimi. Tembe te, Dajjal akobima o kati na bino. ». ( Ibn Majjah, Kitab – ul – Fitam, Bab : Dajjal).

- Abdur Rahman Bin Jubair alobi : « Nayokaki Abdullah bin Amr bin As ; alobaki ete mokolo moko Santu Propheta (SAW) abimaki. Lolenge lua ye lolakisaki ete alingi kotika biso. Nde alobi : « Ngai nde Muhammad, Propheta wa Nzambe oyo atanga te. ». Pe azongeli yango mbala misato. Na suka, de alobi : « Ntoma moko te akoya sima na ngai. ». ( Musnad Ahmad, Marwiyat abdullah bin Amr ib As).

- Santu Propheta ( SAW) ayeisaki Ali : « Yo ozali pene na ngai lokola Aaron azalaki na Mose ( Moise) ( Kimya ya Nzambe ezala likolo naye). Kasi, Propheta moko te akoya sima na ngai. ». ( Bukhari na Muslim, Kitab Fada’il as- sahaba.)

- Thauban alobi : « Santu Propheta ( SAW) alobaki : « Babebisi tukumisatu (30) bakobima o kati la lingomba lia ngai. Moko – moko o kati na bango akoloba ete azali propheta, kasi nazali suka ya ba propheta ya Nzambe o kati ya molongo ya ba propheta ba Nzambe, Propheta moko te akoya o sima mua ngai. » ( Abu Dawud, Kitab – ul – Fitan).

- Propheta wa Nzambe ( SAW alobaki : «Propheta moko te akoya na sima na ngai pe lingomba mususu ya balandi ekozala te na propheta ya sika akoya te. ». (Baihaqi, Kitab – ul – Rouya, Tabarani)

- Santu Propheta alingaki kolakisa : « Ngai nazali suka ya ba propheta ba Nzambe pe Ndako Nzame ya ngai ezali suka ya ba Ndako Nzambe ( ndakisa Mosquée ya Propheta oyo ezuami o Mboka Medine. » ( Muslim, Kitab – ul – Hajj ; na : Fadl – us – salat bi Masjidi Mecca wal Madina).

- Batangi bakomona ete koladana na ba hadith ya solo, ezali kolakisa na polele ete Propheta mususu azali te sima ya Santu Propheta Mouhammad ( SAW). Kasi, Mirza Ghulam Qadiani amisali ye moko ete azali propheta ya Nzambe. Nzoka nde likambo wana ezali musika na mateya ya Santu Qur’an pe Sunna ya Santu Propheta Muhammad ( SAW).

Nani oyo akozala Imam Mahdi mosakolami o kati ya ba Hadiths ya Santu Propheta Muhammad ( SAW).

Makanisi mususu ya muzalisi ya Quadiani / Ahmadiyya maye alobaki ete ye azali Imam Mahdi.

Ba musulmans baike basili kokagama o motambo po na makanisi wana. Totala maye Propheta Muhammad ( SAW) alobaki o likolo ya Imam Mahdi.

- Mokili mokokoma na suka te kaka mutu moko uta a libota na ngai, kombo naye ekozala oyo ya ngai, akoya kokoza ba arabes. ( Tirmithi, Sahih, Vol 9 p 74 ; Abu Dawud, Sahih, Vol 5 p 207, lisusu : Ali ibn Abi Talib, Abu Said, Umm Salama, Abu Hurayra).

- Allah akobimisa uta nakobomana Al – Mahdi o kati ya libota la ngai, liboso ya mokolo mua suka ; ata soki bomoyi ya mokili botikali mokolo moko. Akotia bosembo na bosolo o kati ya mabele pe akologola bobomani na komonelana. (Musad Ahmad I Hanbal, Vol 1, p 99).

- Ata soki etikali mokolo moko mokili esuka, Nzambe akotinda mutu moko wuta na libota na ngai akoya kotondisa Mokili oyo bosembo na bosolo, lolenge Mokili etondisamaki na mabe o ebandeli. ( Abu Dawud).

- Mahdi alakelaki batu ete akozala mutu ya libota na ngai. Nzambe akosalela ye makambo maike po a posa naye o kati ya butu moko. ( Ibn Majah, Sahih, Vol 2 , p 519).

- Mahdi akowuta o kati ya batu na ngai, o bokitani bua Fatma. ( Abu Dawud, Sahih, Vol 2, p 207, Ibn Majah, Sahih, Vol 2, p 519).

- Mahdi akowuta o kati ya batu na ngai, o bokitani bua Fatma ( Mwana mwasi ya Propheta. ( Sunna Ibn Majah, Vol 2 ; Tradition n° 4086).

- Mahdi azali moko wa iso, mutu ya libota na ngai ( Ahlul Bayt . ( Sunna, Ibn Majah, Vol 2, Tradition n° 4086

- Mahdi ya biso akozala na elongi munene, zolo molayi. Akoya kotondisa Mokili na bosembo lolenge Mokili etondisamaki na mabe pe kobomana. Akokamba mibuu sambo ( 7ans). ( Abu Dawud, Sahih, Vol 2, p 208, Fusul – al – mahimma, p 275).

- Nasima ya liwa la Mokambi, tembe ekozala o kati ya batu, Mutu moko ya mboka Medina akokima akokende o mboka Makka. Tangu akokoma pene ya Hajrul Aswad na Maqam Ibrahim batu bakozala zinga zinga naye po balendisa ye pe bakokata ndaya na koloba ete tokozala sima nayo. Nasima lipinga linene likoya wuta o mboka ya Syrie po na kobunda. Kasi tangu likomi Baida mboka ezuami o kati ya Mecque na Medine. Lipinga lina likokudama o kati ya mabele. Po na boye, Ba Abdaals batu ya mboka Sham baike o kati ya bango bazali batu ya Mboka Irak, bayaki po ete bapesa ye maboko. Nzoka nde, mutu moko ya ekolo ya ba Quraish oyo noko naye azali ko uta o ekolo ya Bani Kalb akotindama na limpinga po na kobundisa Mukambi. Alongaki kaka po a bolingo bua Nzambe. Limpiga liye lilogamaki lizali la ekolo ya Bani kalb. Bakangaki te ata mutu soki moko te. Mutu mona ( Imam Mahdi) akokabula biloko binso biye bikangamaki otangu ya bitumba.Akokamba batu kolanda nzela ya Sunnah pe otango ya bokambi bua ye Islam ekopazana Mokili mobimba. Bokambi bua ye bokotikala mibuu sambo (7ans). Natango akowa ba musulmans okosambela po naye losambo ya jeezah. (Abu Dawud).

- Batu moko o kati ya lingomba na ngai bakobunda po ete solo elonga ekozala ngonga moke liboso mokolo ya suka ekoma tango ena nde Yesu, mwana ya Maria akokita. Pe moko o kati ya bakambi bakosebga na Yesu ete akoka kokamba losamo, kasi Yesu akoboya, akoloba ete : « Boye te, pamba te, o kati na bino, Nzame asila kotia bakambi likolo ya basusu pe akumisaki bango. » (Sahih Muslim).

- Koladana na ba hadiths nyoso ya solo ( authentiques) pe endimami molongo mobimba, Imam Mahdi :

1. Akowuta o kati ya libota ya Propheta ( SAW) pe o kati ya bokitani ya Fatma (RA) ;

2. Akozala na elongi ya munene pe zolo etelema ;

3. Akobima liboso mokolo ya suka ekoma ;

4. Akozala bongo na kombo ya Hazrat Mohammad ( SAW );

5. Akokima uta Medine akokende na Mboka ya Mecque, kuna batu bakolanda ye ;

6. Akozua balandi pe lislisi uta na batu ya Moka Iraq ;

7. Akokamba ba Arabes mibuu sambo ( 7ans) koladana na Sunnah ;

8. Akobunda bitumba biyike.

9. Akobima o kati ya butu moko ;

10. Akosala ete bosembo na bosolo bozala olikolo ya mabele ;

11. Akolongola kobomana pe komonelana ;

12. Akokamba losambo o kati ya Mecque mpe Yesu akolanda ;

13. Akozala lolenge moko te na Massiya.

Mirza Ghulam akoki kozala lolenge lona pe akokisi misala mina ?

Bahadiths Eye Ezali Kolobela boyeyi bua Hazrat Issa Mwana ya Mariya

Mirza Ghulam amitiaki ete ye nde Massiya wa elaka, Issa Mwana ya Maria, oyo Santu Propheta Muhammad ( SAW ) alobelaki po naye, ete akoya liboso mokolo mua suka mikoma.

Maloba maye mazali solo to lukuta ? Totala ndege Santu Propheta (SAW) alobaki pona likambo lina :

· « Na lapi na kombo ya oyo bomoyi ya ngai bozali o maboko maye, ete Issa Ibn Maryam ( Yesu Kristo) okondima bobengi ( Taliyyah ) ya Hijja to Umrah ( pelérinage ya munene na ya moke ) to nyoso mibale mbala moko na se ya ngomba ya Rawha » ( Sahih Muslim, livre 7, n2877)

· « Nzambe akotinda Massiya Mwana Ya Marie. boye, akokita pembeni ya Minaret ya pembe oyo ezali o Mboka Damas, akolata zambala mibale ya kulele ya mai ya mosaka ( jaune) , akolalela bongo mapeka ma ba Angelu babale » ( Sahih Muslim, vol 2, p 192 193).

· « Hazrat Massiya (SAW ) Mwana ya Mariya, akokufa nasima yakokokisa mikolo mia ye mia bomoyi okati ya mokili, ba Islam bakomosambela sambela ya moweyi pe bakokunda ye pene ya lilita la Santu Propheta, na Hazrat Abu Bakar na Umar ( RAS) » ( Mishkat, p. 480).

· « Na lapi na kombo ya oyo motema na ngai ezali okati ma maboko maye, solo Mwana ya Mariya ( Yezu) akokita okati ya bino ba musulmans lokola mukambi pe akobuka ba ekulusu, akoboma bangulu pe akopekisa jizyah ( mpako) eye bakofutisaka baye bazali ba musulmans te baye bavandi okati ya Mboka ya Islam. Na boye, misolo ekozala miyike pe mutu moko te akondima lisalisi. »

( Sahih Bukhari, vol 3, livre 34 n425).

Mujalmni Ibn Jariyah Al Ansari ( RA) alobi ayokaki Ntoma wa Nzambe ( SAW) alobi boye : « Mwana Ya Mariya akoboma Antichristo ( Dajjal) liboso ya ezibeli ( porte) ya Ludda ». ( Tirmidhi na Ahmad).

Kolandana na bahadith ya solo eye endimami mokili mobimba :

1. Massiya wa elaka azali mususu te kaka Hazrat Issa Mwana ya Mariya ( Yesu ).

2. Akokita o kati ya a Musulmans pene ya Miaret ya pembe ya Damas o Mboka Syrie, akolata maputa mabale ya mai ya mosaka ( jaune), bakomema ye na ba Angelu mibale o likolo ya mapeka ma bango.

3. Akosambela na sima ya Imam Mahdi.

4. Akobundisa, akobengana pe akoboma Antichrist (Dajjal) oliboso ya lizibeli ( porte) ya Ludda.

5. Akotia bosembo kolandana na mibeko mia Islam ekozala ya Evengile te.

6. Batu ya Mokanda ( Ahlal Kitab bakondima ye lokola Ntoma wa Nzambe pe bakokota o kati ya Islam ( Qur’an 4 : 159, lisusu ekulusu ya ba kristo ekobukama pe mpako ( jizyah ekopekisama.

7. Akobunda na Gog pe Magog pe akolonga bango.

8. Islam na bosembo nde ekokamba mokili, komonelana ekosilisama pe bituma ekosuka.

9. Batu nyoso akovanda malamu, motema mabe, likunya mpe bonguna ekolimwa.

10. Akosala Hijja to Umrah.

11. Akowa na sima ya mibuu tukumineyi ( 40 ans) pe akokundama pene ya lilita ya Santu Propheta ( SAW) .

Boyeyi buaye ezali moko okati ya bilembo biye bikolakisa ete mokolo ya suka mokomi pembeni ( Qur’an 43 :61)

Mirza Ghulam akokisaki maye manso Propheta alakisaki ete ekosalima ?

Mirza Ghulam Ahmad Qadiani azalaki Propheta, to Massiya wa Elaka to Imam Mahdi ?

Botanga na bokebi ba hadith oyo, botala lolenge ya mokili ya Islam. Mirza ayebaki ete azali komikosela ete ye azali Propheta wa Nzambe to Massiya wa Elaka to Imam Mahdi.

· Mirza Ghulam azalaki mwana ya Chiragh Bibi, azalaki Mwana ya Santu Mariya te !

· Abimaki te okati la libota la Propheta Muhammad ( SAW) .

· Akambaki soki moke te Mboka ya ba Arabe to kozongisa bosembo.

Mirza Ghulam andimaki :

« Nazali komikumisa te ete ngai nazali kaka Mahdi ona akoya kolandana na maloba ya Hadith »

« Toyebi solo ete ba Mahdi ebele basili koya pe esili koyebana ete omikolo mikoya bakoya lisusu pe ekoki kosalema moko okati na bango akobengama Imam Muhammad. » ( Roohani Khazain vol 3 p 379)

« Ekoki kosalama pe ekosazala solo na mikolo mikoya, Massiaya lokola ye akobima kolandana na hadith ya Santu Propheta, pamba te mutu mona ayaki po na kokamba te to po bokonzi bua mokili oyo, kasi ayaki a bobola pe na komikitisa. » ( Izala – e –Anhan, Roohani Khazain vol 3)

« Ekoki kosalema solo o mikolo mikoya massiya moko te akoki koya. Ekoki kosalema solo ba Massiya koleka nkoto zomi ( 10000) bakoki koya pe moko okati na bango akokita omboka Damas. » ( Izala – e – Anhan, Roohani Khazain p 251)

[1] [ 2]

:   admin       (   )
: 0 /5 ( 0 )

: 26-11-2009

: 1238