:Lingala2
  Non - Arabic Articles Lingala

: Lingala2
: webmaster

Okombo ya Nzambe Ta Ngolu mpe Boboto

Kimya Ngracia ya Nzambe ezala ote ya Seydina ( Mokonzi) ya Biso Muhammad,

Libota naye mpe Bayekoli naye.

AL – FATWA International n° 8

Po na nini na bimi o kati ya Lingomba ya Ahmadiyya ?

Ekomami na Dr Ismail A.B. Balogun. Ye azali moko ya bakambi ya

Ahmadiyya ya munene ya kala.

«...Nalingi nalobela bino boye, liboso ya Nzambe mpe liboso ya Batu ete

natalaki mingi na bonzindo penza mokano mpe kolakisa bilembo na bango;

nde naye kokondola ete Lingomba ya Ahmadiyya ezali kokosa mokili

mpe ezali kosakana pamba te mpo na bozangi boyebi ( boyinga) bua

balandi babango.»

Okati ya makomi maye mabimaki o mboka Nigeria na mubu 1974, Dr. Ismail A.B. Balogun, moko ya bakambi ya Ahmadiyya ya munene, ayanganaki bondimi ya Lingomba Ahmadiyya mpe abimisaki na polele liboso ya batu mpo nakoboya Lingomba Ahmadiyya liye abotamaki mpe akolaki nakati. Ye azali molakisi ( Professeur) ya mateya ya Islam ( Etudes islamiques) mpe littérature arabe o kati ya eteyelo ya Ibadan ( Université d’Ibadan) o Mboka Nigeria.

Dr. Balogun atiyaki bomoyi naye mpo na misala ya Lingomba Ahmadiyya mpe batombolaki ye mpo azala Mokambi momemi sango mpe ambassadeur.

Na mibu minso mina, balisikulu ( discours) naye yakobangisa mpe esalemi na lolenge ya malamu pemza ekotelaki bilenge ebele ya Lingomba Ahmadiyya.

Na boye, kobima naye na polele, koningana mpe koswana oyo elandaki, esali ete batu mingi ya ayele bayeba bosolo mpe babima batika Lingomba Ahmadiyya.

Nzambe azali kondima tubela ya baye basali mbeba na boyinga sima batubeli noki.

Batu ya ndenge wana nde Nzambe akondima tubela nabango.

Nzambe azali ta boyebi mpe buanya (sage).

( Coran Esantu, An- Nisa, 4 :17)

Sima nde Dr. Balogun amonisaki tina ya kobima naye o Lingomba ya Ahmadiyya mpe asangisaki debats contradictoires oyo elandanaki na kati ya mokanda muaye na kombo «Islam nzela moko te na Ahmadiyya na Nigeria.» (« Islam contre Ahmadiyya au Nigeria»).

Na kati ya mokanda mona, Dr. Balogun alakisaki lolenge ye, na batu mususu na basusu mingi oyo batangi, bandimaki na bazangi boyebi Lingomba ya Ahmadiyya, olibanda ya bolinga bua ba boti ba bango, pamba te mateya mabe maye mapanzani, kolandana na lolenge la bokaboli batu na ezaleli ya ba missionnaires ba Ahmadiyya ba Mboka Pakistan. Na makambo mususu ma mbango moko maye matali penza losambo mazali nzela mko te na bosolo ya Lingomba Ahmadiyya.

Dr. Balogun azali koloba o kati ya mokanda muaye ete bondimi buaye lokola mo-lolanda

( aveugle) na bolandi ba missionnaires ba Ahmadiyya ba Mboka Pakistan.

« Na bomwana na ngai, bamemaki ngai po ete na bondela ba missionnaires ba Ahmadiyya ba Inde na Pakistan, bazalaki kokonza mpe kotala makambo na biso manso matali Lingomba. »

Tango mission Ahmadiyya eyaki epayi ya bakulutu ba biso, ewuti na bakulutu eyei epa na biso, tondima manso maye bayebisi biso po na bo ndimi ya bokutu ( implicite), po na elikya mo-lolanda

( aveugle) eye topesaki mbango.

Mateya ma bango ekotaki biso malamu, mpe to ndimaki makambo na bango na motema moko. Pamba te bazalaki kokokanisa na mikanda mia Islam po na ko ndimisa, ko lendisa makanisi na bango pe to ndimaki mateya na bango nakoyimayima te pamba te tozalaki na elikya na bango.

Nzela na bango ezalaki ete tokoka koboya ba Musulmans basolo solo, pamba te po na bango nde bazuaki lolenge ya koloba kolandana na ndenge ba Musulmans bana bazali kozua Islam na bango. Ba Missionnaires bana balingaki kolakisa biso « Islam ya solo » okombo ya Lingomba Ahmadiyya.

Mbala mingi bakotisaki o kati ya molimo na biso ete minioko ya makasi oyo ba Ahmadiyya bampikilaki, pe bazuaki o kati ya Mboka Inde liboso ya bokabwani na bango, na sima lisusu o Mboka Pakistan, ezalaki ndakisa ete Lingomba ya Ahmadiyya ezali ya solo. Nzoka nde, Ntoma moko te andimamaka o mboka naye. Oyo elakisaki biso na polele ete bosolo bozali, nde to landaki bango na elikya oyo ezali na lukuta o kati na yango te. (« Islam contre Ahmadiyya au Nigeria » p :85-86).

Eteni ya mine ya siecle eye eleka, Dr. Baogun amonaki sekele ya mayele ya ba Missionnaires ya Ahmadiyya ya Mboka Pakistan maye mazalaki olikolo penza po bazali kolakisa na polele te elongi mobimba ya makanisi ( doctrines) ma bango pe lisitole ( histoire) liabango, nzoka nde bazali kobongola mateya masolo ma Islam ; pe bazali komeka lolenge nyoso mpo nako kabola mangomba

( sectes) o kati ya bazoba ba Musulmans.

Dr. Balogun akomaki :

« Ata soki Lingomba ya Ahmadiyya esili kosala mibuu tuku mutoba ( 60 ans) na kati ya mboka oyo

( Nigeria), Nazali kolobela bino ete ti lelo batu bayike o kati ya Mission, tii na mokolo mua lelo bazali o kati ya molili mpo ya makambo ya mikemike ya likanisi ( doctrine) na ntina nango. Ndakisa, ezali kala mingi te tangu ba nguna ( opposition) ba Lingomba Ahmadiyya babandaki kobimisa mutu na Mboka ena ( Nigeria), ete bakambi basusu ba Ahmadiyya mbala ya yambo baye koyeba ete Ghulam Ahmad azali komizualokola Ntoma ».(« Islam contre Ahmadiyya au Nigeria». p.3).

[ Lokola ba Ahmadiyya bazalaki kobomba makanisi mabango masolo ( vraie doctrine) o balandi mingi ba bango], Emonani na polele ete tangu moko ya bilenge ya islam oyo atanga o Mboka Nigeria, oyo akota na Lingomba la Ahmadiyya awa, akendaki o Mboka ya Bangeleza po nakotanga sika, kuna nde akutani na ba Ahmadiyya ba Mboka Inde baye bakovandaka o Mboka ya Bangaleza, asali mateya

( études) maye o maboko ya yambo ya ba Ahmadiyya ; sima azongi Mboka mpo ete alongola bolandi buaye o Lingomba Ahmadiyya. Ndakisa Nkondo ( feu) Al-Hadj L.B. Ahusto Nzambe apemisa molimo muaye. » ( Ibid.p.2).

Naboye, Na ebandeli na bango, Bakambi ya Lingomba Ahmadiyya balukaki bazela oyo endimama na ba Missionnaires ba ba Kristu po na ko bongola ba Musumans bazoba po ete ba matisa motango mua balandi babango.

Baye na malamu penza ete mabota ma batu baye bameseni kokosama na nzela moko to mususu po balanda Ligomba na bango bazali bake baye bakowangana bolandi bua bango, ata soki baye koyeba simabosolo.

Ya solo bakutaki Ba Tata na bango asila kobunga, bango pe bamemanaki kolanda makolo ma bango ( baboyaki kolanda maloba ma prophète Mohammad), tembe

ezali te, batu baike bakala bazalaki banguna liboso na bango.

( Cor’an Esantu, As-Saaffat, 37 : 69-71)

Dr. Balogun alakisaki ete, na mubuu 1974, Bulamatari ya Pakistan na Ligue Mondiale bamonisaki ete Lingomba ya Ahmadiyya lilingaki Islam te, Dr. Balogun amitiya kati o botomboli ya Lingomba liye abotama na kati mpe alingi alakisa bosolo bua Lingomba Ahmadiyya.

Na boye, kolanda na boluki buaye ya mozindo penza oyo ekoka ya mayele o kati ya mateya ya bokambi lingomba ya Ahmadiyya esali ete akoka komona ma kambo ya mabe ya lukuta pe etiki ye apona nzea mususu te kaka koloba mabe ya Lingomba ya Ahmadiyya oyo amonaki.

Mokano moye azuaki mozalaki na litomba linene, pamba te Dr. Balogun ye mei azalaki mokambi ya Ahmadiyya ya likolo mpe moyebi ya mateya ya Islam, amitikaki ye mei o kati ya bozoba mibuu koleka tuku mine po na likambo litali bosolo bua Lingomba Ahmadiyya.

Kolanda na bilembetele ( références)bia bango bie bipesami na ba Missionnaires Ahmadiyya, uta na kati ya Qur’an Esantu, na kati ya hadiths pe o kati ya makomi ya Bakambi ya likolo ya ba musulmans po na nkotisa ( confirmer) makanisi na bango, Dr. Balogun akomi :

« Mokano na ngai (po na kosangisa bilembetele bie bilobamaki na ba Ahmadiyya) ezalaki solo po nakomilendisa ngai moko po na koboya bonguna boso o Lingomba Ahmadiyya.

Lokola moyebi munene o molongo mobimba, nazalaki na elikya ete bosakoli ( déclarations) bua ngai likolo ya Lingomba Ahmadiyya ekoki ko lendisama ( appuyé) na bilembetele bia biso bie bizuami o kati ya Islam.

O kati ya bosangisi bua ngai bua bilembetele bia ba Missionnaires ya Lingomba Ahmadiyya, maloba na ngai ya suka ( conclusion) ezalaki ya kosepelisa te.

Nakoki koloba omiso ya Nzambe na Batu , mingi na zali kotala omozindo makanisi na bango pe tozali kolakisa ba bilembetele bia bango, nde nazali kokundula ete Lingomba la Ahmadiyya lizali kokosa mokili pe lizali kosakana na bozoba bua baike ba balandi ba bango.

O kati ya makambo ebele, bazali kotanga bakomi ( Batu ba buanya) baye bazali banguna ba polele likolo ya makanisi ya Lingomba la Ahmadiyya, kasi, lisusu bazali kotanga na mayele ete bamonisa mbala mingi ete bakomi bazali kondima makanisi ya Lingomba la Ahmadiyya…

Ezali kaka kokende o bilembetele bia libandeli ( sources), na kotanga oyo ba Ahmadiyya bamonaki o kati ya makomi maye bango baboyaki ete motangi na moluki ( chercheur) na sima ya solo kokomela bango, nde baye koyeba epai wapi ba Missionnaires ba Ahmadiyya ba Mboka Pakistan bazali komeka kokosa mokili » ( Sunday Sketch, Nigeria, Sept 29, 1974 ; Ibid, p.86-87).

Boluki bua bonzindo bua Dr. Balongun o kati ya ba mikanda ya kala ( originaux) pe ya solo ya ba Musulmans elakisaki na polele ete ba bandisi ( fondateurs) na bakambi batiaki molende na nko po ete bazongela lukuta na bango po na ko bungisa ba zoba.

O kati mua mokanda muaye, Dr. Balogun abimisi maloba ma suka maye :

« Ezali polele kolandana na maloba ete Mission ezuaki te kaka makanisi ma bango ma mabe (ya lukuta) maye mauti ma maloba mantina te maye mazuami o kati ya lisanga, maye mazali na bokabuani penza na bolingi bua bango pona na tina ete ekoka komonisa ete mukomi azali bongo kolanda makanisi ma bango.

O Kati ya batu batanga, likambo ya boye nde ezali kosala bokabwani bonene penza bua likanisi la mokonzi. Pamba te ezali kowangana mobeko mua molongo ( Loi International) ya droit ya mokomi. Ekoki kondimama te pe ekozala malamu te na Mission eye elingi ezuama na kilo.

Po na mobeko ya Islam likambo la boye ezali mabe mingi. Po na boye Cor’an Esantu elobi (Coran: 2:59 , 7: 162):

« Kasi batomboki baye ba bongoli maloba maye bayebisa bango te. Boye nde tokitisi etumbu munene likolo ya batomboki, natina ete bazangaki botosi . » Ezali bilia ya kokanisa pona ba Ahmadiyya. (Sunday Sketch, Nigeria, Sept, 29, 1974, Ibid, p. 91 – 95).

Baye bazali kobuka lukuta, bazali baye bazali kondima te maloba ma Nzambe, bango nde solo babuki lukuta.

 

( Cor’an Esantu : 16 :105)

Nasima ya kobima naye o Lingomba na polele penza, Dr. Balogun babandi kolandelaye na baike ya bakambi ya ba Missionnaires ya Ahmadiyya. Ndakisa, Molvi Ajmal Shahid, ye azalaki o tango ena mokambi ya Lingomba Ahmadiyya o Mboka Nigeria, ye apesaki eyano mokuse penza na kolakisa pasi naye na komona ete: « Ndeko naye asili kowa liwa ya molimo.» ( Ibid p 97), pe Moulvi Nasein Saili, azali Mokambi ya ba Missionnaires ya Lingomba Ahmadiyya o kati ya Afrique ya eloli ( ouest), ye andimaki ete Dr.Balogun abimaki o Lingomba Ahmadiyya po ete akota na Islam. ( Ibid. P. 99).

Na boye, nde ba Missionnaires basusu ba Lingomba Ahmadiyya ba mutunaki ye tina nini ye abimi

o kati ya Lingomba Ahmadiyya na polele.

Po na polele, Dr. Balogun, ye avandi mibuu ebele amesanaki na mayele yakotambuisa Lingomba ya Ahmadiyya, ayandalaki ( discréditer) baye baboyaki Lingomba la Ahmadiyya, ayanolaki :

« Nalingaki na bimisa makambo nyoso o kati ya komi oyo : ( Ndakisa : Ezaleli ya Lingomba la Ahmadiyya ya batu ya Pakistan). Na kati na kobelela te. Kasi koyeba na ngai elakisaki ngai ete kopona ya Mondimi ya Ahmadiyya makambo mususu ekozala ete afingama to aboyama na eleko ekoya, to kolongolama na libela kaka wana. Na boye, ata mutu moko te o kati ya Lingomba oyo basala ye ete akokakoyoka ye....Ngai nasololaki ( nalobaki) makanisi na ngai, Nzambe azali Nzeneneke ( Témoin) na ngai, po na koyeba bonene ya likambo lina liboso ya baninga ba ngai ba Musulmans ba Mboka Nigeria kaka, mpe ba Mboka ya ba Musulmans nyoso. Mokano na ngai ezali po na koboya lingomba ya Ahmadiyya te, ngai na vandaki o kati ya Lingomba mikolo mingi po ete nazua kimya o kati ya motema mua ngai. Kasi, mbala inso soki bokabwani bua makanisi bobimi katikati ya Islam na Ahmadiyya, ezali po na ngai naloba po na Islam na likukuma te.» ( Sunday Times, Nigeria, Jan.20, 1974; Ibid, p 17).

Tozali kolikya ete batu baye balandaki Lingomba la Ahmadiyya po na libunga, bazongela esika na bango o kati ya mwinda oyo ebimi na kongenga nyoso uta epai ya Dr. Balogun. Baye banso bakotelamaki na likamwisi ya Cor’an Esantu na mateya na Ntoma wa suka Mohammad ( SAW), balakisa bosembo bua bango epai ya Allah na Ntoma naye ya suka (SAW) to boye banso bazuakite posa na bango pe lukuta oyo babanda kolakisa bango?

Ya solo baye bawangana Nzambe mpe bapekisi batu nzela la nzambe pe basali tembe na Ntoma Mohammad (SAW) na sima ya komona

bosolo, bango bakosala Nzambe elako te,

pe akokweisa makambo na bango.

( Coran Esantu, Muhammad, 47: 32)

Makambo oyo mabimisami o kati ya: « Islam nzela moko te na Ahmadiyya na Nigeria . »

( L’Islam contre Ahmadiyya au Nigeria), ekomami na Sh. Muhammad Ashraf, Kashmiri Bazar, Lahore, Pakistan.

Curtoisie : Idara Dawat- o – Irshad, USA, Boite Postale 22885, Alexandrie, VA 22304, USA.

Site Internet:

http://www.irshad.org/idara/

http://alhafeez.org/

:   admin       (   )
: 0 /5 ( 0 )

: 26-11-2009

: 627