:Lingala
  Non - Arabic Articles Lingala

: Lingala
: webmaster

Bismillah Al-Rehman Al-Raheem

(in Lingala language spoken in Congo-Kinshasa)

MUKALA YA MINDELE

 

Ekomami na AL Hafiz B.A.Masri

 

 

Hafiz Bashir Ahmad Masri, abotamaki na mboka ya Inde mubu 1914. Tata naye azalaki Qadiyani omaboko ya Mirza Ghulam, oyo azalaki Qadiyani mozalisi ( fondateur) ya lingomba ya Ahmadiya. Akolaki mpe amipesaki mingi o lingomba ya Qadiyani. Tangu akokisaki mibuu zomi na mitano, nde akutanaki na Mirza Basheeruddin Mehmood, azalaki mukitani ya mibale  mpe mwana ya Mirza ye nde amotiyaki ye kokoso ( mubulu) po na lingomba ( Ahmadiya), kobanza ete wana nde ezali Islam, azalaki nalikambo mususu yakosalela ye te. Hafiz Bashir na Tata naye bakomaki o mboka Qadian. Ezalaki bongo mikolo mike o sima ya bango koyengela o lingomba la Islam.Na mikolo mina Tata naye atikalaki kaka na lingomba ya Ahmadiya na asanganaki na lingomba( groupe) la Lahori. Hafiz Bashir azuaki diplôme ya Maîtrise o collège ya Lohori ya Université ya Punjab. Azalaki koyokola lisusu o faculte ya lokota Arabe na Universite Al Azhar. Azalaki koloba ba ndinga ebele lokola Anglais, Arabe, Urdu, Hindoustan, Punjab na Swahili. Avandaki na Afrique ya Est mibuu tuku mibale

( 20 ans) kuna azalaki mukambi ya eteyelo (Ecole) munene ya secondaire. Mpe akambaki lisusu bisika ( postes) ya secretaire na President ya mangomba ebele oyo etali makambo ya Nzambe na ba organisations ya masanga ya bana Asie, ya bana Afrique, ya bana Mpoto, na lingomba oyo etali bolamu ya ba nyama ( bibwele).

 

Mubuu 1961, Hafiz Bashir akendeki kovanda na mboka Angleterre kuna nde ayekolaki musala ya bompanzi sango ( journalisme). Mpe akambaki lisusu mibuu motoba ( 6 ans) Journal oyo ekenda sango na kombo “ Islamic Review”.

 

Ndako ya Nzambe ( Mosquee) ya Woking ( Angleterre) etongama na Nawab Begum wa mboka Bhopal na kati ya suka ya ndambo ya siecle oyo eleki na mubuu 1920 ba Qadiyani babotolaki yango. Tango Mr. Hafiz Bashir azalaki na Angleterre mubuu 1964, ba Qadiyani baponaki ye Imam mona, nakobanza ete atikalaki kaka mundimi ya Qadiyani. Sima ya mibuu zomi ya musala yakokamba, azalaki mu ndimi ya yambo wa musulman sunnite oyo aponamaki Imam ya Mosquee Shah Jehan, natango wana mosquee mona mozalaki esika ya bokutani ya musulman ya ba mindele ( Centre Islamique pour les Européens). Mubuu 1968 atikaki, mpe azongisaki bokambi ya mosquee o maboko ya ba musulmans. Sima nde abandaki kosala mibembo okati ya bamboka ya ba musulmans koleka tuku minei ( 40) na mibu misatu

( 3 ans) na tina ete  akolisa mayele ya mbonsomi ya Islam. Ye mpe ayebanaki mingi o mboka Angleterre mpo na mateya maye maike kolekela nzela ya radio na television. Akomaki lisusu mateya ya ndenge na ndenge matali Islam.

 

Nakati ya misala naye mia bokomi ezali: “ Islam Concern for Animals”, “ Animals in Islam”. Liboso ya liwa naye Hafiz Bashir asalaki lingomba (association) na kombo: “ International Muslim Association for Animals and Nature”,” IMAAN”. Akufaki na mubuu 1993 azalaki na mibuu tuku sambo na libua ( 79 ans). Mpe sambela ya maiti naye esambelamaki o mosquee ya Woking o mboka Londres.

 

 

Oyo elandi ezali bongo maye masalemi okati ya enregistrement ya maloba elobami na

M. Hafiz Bashir.

 

 

Okombo ya Nzambe, Ta Ngolu mpe Boboto.

 

Lingomba ya Qadiyani eyebani na kombo ya Mirzaiyyat / Ahmadiyyat, mikolo oyo ekomi likambo ya tembe. Ba musulman ya mokili mobimba, bazali kosangana mpo nako yangana lingambo oyo ya mabe oyo emi tie nakati ya Islam. Po na nini ekomi boye? Po na nini tozali koboya bango mingi mingi na mikolo oyo? Mbala mingi bilenge batuni ngai mpo na nini tozali koboya Mirzayyat / Ahmadiyyat nzoka nde Islam ezali koteya koyokana mawa mpe kopikila ( patience) na mituna miye mitali bokabwani nakati ya lingomba.

 

Batu ya mikolo oyo, oyo bazali na limemia bazali kokanisa ete tokoki kozala na lolenge moko lokola mangomba mususu mpe makanisi mususu oyo ezali nzela moko te na makanisi ya Islam. Pamba te, mangomba mususu mazali nakondima ete bantoma mususu bazali bana ya Nzambe, basusu bazali koteya ete batu basambela bikelamu lokola ba nyama, basusu bazali kondima te ete Nzambe mokeli azalaka.

 

Kasi, ata soki bokabuani ezali o kati ya bo ndimi, tozali kotika bango. Ba musulman mususu bazali kokanisa ete ezali malamu kotika ba Ahmadiya balanda nzela na bango. Po na kolinga koyeba maye manso mpe mituna miyike miye mi kokani, nde toluki obozindo penza po ete tokoka koyeba bosolo boye bozuami o kati ya lingomba lina. Mutuna, Ahmadiya ezali solo lingomba ya bo bongoli na kati ya Islam ndenge bazali kokanisa? To ezali eloko ya lukuta o kombo ya Islam?

 

O mibuu ya ebandeli ya Ahmadiya, esili koleka mibuu nkama( 100 ans), ba nganga Nzambe ba biso bamitungisaki mingi te mpo na likambo oyo ya lukuta ya satana. Pamba te, lingomba

( secte) ya Ahmadiya ebimaki lokola lingomba ya mateya mpe Shariat ya Islam na makanisi ya ko bongola Islam.

 

Babanzaki ete songi songi ( Fitna) wana eko limua na liwa, lolenge moko batomboki baye babima o tango ya kala ( po nakobebisa Islam) kasi bakokisaki mokano mua bango te.

 

Ndenge tango ezali koleka, bazomona ete lingomba wana ( Ahmadiya) ezali yango te ndenge liso ebanda komona, ekomi mabe mingi koleka ndenge ezali komonana libanda.

 

Na sima ya mikolo, nde ebimi na polele o miso ya ba musulman ete ba Ahmadiya bazalaki na lisalisi munene wuta na Bangelesa ( Empire Britanique).

 

Na tango wana, bakambi ya mboka Inde ba bandaki komona ba musulman ete bakoki kozala mpe bazali ba fiti ( traîtres). Ezalaki bongo mibuu tuku misatu na mitanu ( 35 ans) epai wapi ba musulman basalaki matata ti kino balingaki kokonza na sima nde eye koyebana na kombo ya “ La Révolution de 1857”.

 

Bulamatari ya Bangelesa bamonaki ba Qadiyani ( Ahmadiya) nde batu basolo po ete bakoki kosala na bango po na kobebisa makambo nioso mantina po na Islam. Boye, nde basugaki bango pe bapesi bango lungunia na maye manso ya ba Qadiyani ( Ahmadiya) mazali koteya kondima mpe kolanda Bulamatali ya Bangelesa.

 

Ba Qadiyani ( Amadiya) ba lekisaki ndelo na koloba ete ko ndima na kolanda Bulamatali ya Bangelesa ezali moko okati ya makonzi ya lingomba po na ba musulman ya Inde. Po na kolendisa makambo oyo ( Fatwa), ba bimisi makomi ya Qur’an Esantu maye mazali kotinda ba musulman ete batosa baye bazali kokonza, elingi koloba bakonzi ya mboka ya Bangelesa baye bazali na Inde. Nzoka nde, tango bazali kotanga makomi mana ( Verset), bazali kobosana ete mobeko moye mozuami okati ya Qur’an –e – Majeed elobi ete bakonzi basengeli bazala okati na biso, elingi koloba ba musulman. Ezali kaka te na mibuu ya ebandeli nde Qadiani ( Ahmadiya) abandaki kolanda bokonzi ya Bangelesa. Bomoyi na bango bonso, lingomba wana ( Ahmadiya) ezalaki kosala na nzela ya mulili ( sekele) na banguna. Esali lisusu ya ko bombana te mikolo oyo koloba ete ko bunda po nakowela koyebana o kati ya mokili, mingi mingi na ba mboka ya Moyen Orient, ba Qadiyani bamipesaki mingi na kosala na ba nguna ya bamboka ya Islam. Ba musulman mususu bazali kokamwa na misala mie mizali ko kokana na misala ya Nzambe na ndenge bazali kolonga na kotia ba bureau na bango na ba mboka ebele.Ba musulman moke nde bayebi nabosolo ete bisika bina bizali ya bangu biye babongoli yango lokola bisika ya mateya ( Dawa’h, Tabligh).

 

Kasi, balandi ya Qadiyani ( Ahmadiya) bayebaka te maye manso mazali kosalama na molili

( sekele). Bazolakisa bango ete kokende liboso ya lingomba ezali po na mabonza, makabo, nzoka nde, misolo miyike eko tiamaka o Qadiyani wuta na bamboka eye makambo ma bango ya politiques, doctrinaux, idéologiques na économies ezali na mikakatano o kati ya bamboka ya  Islam. Banguna ya Islam basili kozua na kati ya Qadiyani balandi na ba fiti ya makasi. Po na boye, misala mia bango ezali pete pamba te bazali kosala onse ya elili ya Islam pe bazali kondimama lokola lingomba (secte) ya Islam o kati ya ba mboka ebele.

 

Ezali kokamuisa batu mingi komona ete ekomi pete na mikolo oyo ( mbula oyo). Ba Qadiyani bawuta Inde na Pakistan bazali kokende ko vanda o ba mboka Mpoto na America, nzoka nde makambo ezali pasi mingi po na batu mususu.

 

Na ebandeli nalobaki ete kokoso okati ya ba musulman na ba Qadiyani ezali po ete ba Qadiani bokomi na makani ya mokibisi (hypocrite) ete bazali o kati ya Islam.

 

Botika ngai nalobela bino bosolo ezali te po na kozanga boyokani to po na mabe ya makambo na bango te. Soki balobaka ete bazali balandi ya moko ya mangomba ya sika oyo ezali islam te, tolingaki ko bundisa bango te, tolingaki kovanda na bango na bo kimia lokola mangomba mususu, elingi koloba boyokani. Nzoka nde tozali na mangomba mususu maye tozali na bango nzela moko te kasi tosololaka na bango mpe toteyanaka ti toyokani.

 

Po na yango tokoki kotikate lukuta ata moke te, tango tokoyoka mutu ya lukuta azali komizua o kati na biso, ye wana abandi kobongola pe kobundisa makonzi minene ya bondimi na biso.

Botika ngai na tangele bino ndakisa mike:

 

Toyebi ete likambo ya kosukisa bontoma na kati ya Islam ezali solo mpe ezali na tembe te o kati ya histoire ya mangomba ya Nzambe ya solo. Toyebi ete ezali na tango te oyo Nzambe atika kotinda bamtoma te po ko kulisa makambo ya molimo pe  komema batu na nzela ya semba. Oyo ezali moko ya mankonzi ya bondimi o kati ya Islam.

 

Pamba te ba musulman bandimaka bantoma banso Nzambe atinda. Likambo oyo ezali kolakisa ete Nzambe alandisaki kotinda bantoma po bateya batu kolandana na bondimi na bango na mayele na bango pe na tango ya kokesana.

 

Likambo oyo yakolandisa bimoneseli ( révélation) kolekela bantoma ti kino mutu akolisi mayele akomi koyeba makambo ya malamu na mabe. Nde tango wana Nkolo Nzambe akokisi mobeko moye biso ba musulman tozali kobenga SHARIAH kolekela Prophète Muhammad (SAW).

 

Kolandana na bondimi oyo ba musulman bazala na kondima makasi ete ntoma moko te akoya nasima ya Prophete Muhammad (SAW). Na soki mutu ametie kobanza ete azali ntoma, akomonana lokola mutu ya liboma, to mutu ya lukuta, to lisusu mokibisi ( hypocrite).

 

Tango Mirza Ghulam Ahmad ya mboka Qadiani asakolaki sango ya lukuta ete ye azali mutindami ya Nzambe lokola Massiya ya elaka, lisanga nyoso etelemi nakoyeba ete azali mopengoli ( hérétique). Lokola nasili koloba ete fitna oyo okati ya Islam elingaki ezipama, soki ezala lisalisi ya Bulamatali ya Bangelesa te.

 

Boye lelo, tozali komona lisusu po na lisalisi ya mosolo oyo lingomba ya Ahmadiya ezali kozua wuta ba mboka ebele nde ba Qadiyani bazali kobongisa ba campagnes na bango.

 

Ata soki banzela ( madhehebu) ya makanisi ya Islam ezali mingi, kasi bokeseni ezali kosuka kaka na makombo ya mike mike. Bokeseni ezali te o kati ya bondimi. Makambo mibale esalisi kotonga bondeko ya ba musulman pe kolandisa etinda ( message):

·        Ya yambo, kosukisa mukanda mua Qur’an Esantu oyo ezali maloba uta epa ya Nzambe.

·        Ya mibale, kosukisa Bontoma ya Muhammad (SAW) yende azali suka ya bantoma ya Nzambe.

 

Soki boningisi makonzi mibale maye to tangi olikolo, ezali lokola kobuka litungi la Islam.

Naboye, koyeba ete bomoto ya Prophète Muhammad (SAW) lokola suka ya bantoma banso ezali likonzi liye makambo manso ya Islam na kindeko ya molongo mobimba ezali konzunguluka ( osciller).

 

Pamba te, mbala inso banguna ba Islam bazali koluka kobebisa misisa ya Islam, babandaka koyimayima mpe koyangana bosolo ya Qur’an Esantu mpe kofinga bomoto ya Santu Prophète Muhammad(SAW).

Tokomi na momesano ya koyeba bitumba bina na epayi wapi ezali kowuta mpe toyebi ndenge nini tokoki kobikisa yango.

 

Mikakatano ya solo ekobimaka na tango eye mutu moko na kati ya islam abandi kobundisa, ndenge ba Qadiyani bazali kosala. Tokoki kosala manso, kasi soki tozali esika moko, tozali koyeba makambo te, tokoki kosuama na nioka okati ya esobe.

 

Wana nde ezo komele bandeko babiso ba musulman. Tango Mirza Ghulam Ahmad abandaki lingomba ya Ahmadiya, ba musulman o mboka Inde balekaki tango moko ya pasi mingi. Ba kambi ya lingoma ya euclesia basalaki campagne moko ya munene mpo na kobongola ndambo ya ba musulman. Ndenge moko, ba Hindou bango pe basalaki oyo ya bango campagne lokola ba Ahmadiya o kati ya lingomba na bango na kombo “ SHUDHI”.

 

O likolo bitumba nyoso wana, Bulamatali ya Bangelesa atikaki te makambo naye yakolembisa makasi ya ba musulman. Na tango oyo ya kobangisa ba musulman nde Mirza Ghulam Ahmad Qadiyani amibimisa. Na kati ya mateya naye ya yambo, alobelaki atamuke te soki akoki kozala Prophète, Massiya ya elaka.

 

Ngai ( Hafiz B.A. Misri) nabotamaki na mboka Qadiyani epai wapi nakola na kati ya batu bana. Nayebi ete batu mingi bakotaki o lingomba Ahmadiya kobanza ete lingomba lina nde liye likobongisa Islam.

 

Po na boye, kolandana na Progres na boyebani oye azalaki nango, Mirza nde abandaki muke muke na kobombana kotia makanisi naye moko na siam ya musu, tu lelo, ba Qadiyani ya 3e na 4e générations bakomelaki te koyeba ndenge nini bakosamaki. Azali ata nalikanisi moko te pamba te ye moko mirza Ghulam Ahmad oyo bakoko na bango bandimaki ye po na lukuta ete azali musalisi ya Prophète Ahmad ( Muhammad), sikoyo ye moko amikomisi “ Prophete Ahmad” na bolingi bwaye.

 

Bilenge ya mikolo oyo ya Qadiani basukamaki ongo na boyebi te okati ya bondimi bwa bango. Ba Qadiyani basili kondima ete “ Bantoma” bua Mirza Ghulam ezali moko nakati ya bondimi ya Islam. Bondimi bona bozali na motuya penza po na bango pamba te ba musulman banso baye bazali ba qadiyani te bakozuaka bango lokola ba “Kafirs”. Mingi penza, ezali lisusu po na Qadiyani asambela na sima ya imam musulma to andima libala ya musulma na qadiyani.

Lisusu, mboka Qadian ezua esika ya La Mécque pamba te bakomi kokende kuna kosala pélérinage.

Bisika mingi o kati ya mboka Quadian bisili kokoma bilembo ya Nkolo nzambe mpo na bamgo, lokola Qur’an esantu azali kotanda bisika moko moko o kati ya La Mecque, ndakisa “ Sha’air Allah”.

Mwasi ya Mirza Ghulam ye pe bazali kobenga ye Mama  ya Bandimi:

“ Ummul – Momineen”, ndenge moko ba musulman bazali kobenga basi ya Prophète Muhammad ( SAW).

 

Wa mibale okati ya bacalife ya ba quadiyani, Mirza Basheeruddin Mahmud mwana ya Mirza Ghulam Ahmad quadiani asili komi lobela ete esika naye ya molimo ezali likolo mingi koleka ya Oumar bin Khattab, Calife wa mibale wa Islam, nzoka yango, eyebani polele ete zoba oyo azalaki mobebisi musali ekobo munene.

 

Kala mingi te, Amir wa ba Qadiani wa mikolo oyo atiaki tembe ya Mubahillah epa ya ba musulma. Ngai ( Hafiz) batindelaki ngai mokanda mona onzela ya poste nazuaki yango.

 

Eyano na ngai, namonisaki makanisi na ngai moko likolo ya kanyaka ya mayele eye ezali komonana okati ya quadiani. Makomi na ngai, ndimbula ya makomi na bango pe ndenge nini na bimaki okati ya lingomba lina ( Qadiyani) makambo manso makomami o kati ya mokanda ya muke moye mobimaki lolenge ya mokanda ya polele moye etindamaki epa ya Amir ya ba qadiani. Mokanda wana ya moke ezuami na adresse oyo elandi na nse.

 

Wassalamo Alaikum wa rahmatullah wabarakatuh

 

 

 Al Hafiz B.A Misri

 

Mouvement Anti Ahmadiyya en Islam

 

Dr SEYD RASHID ALI

 

P.O.BOX 11560

 

DIBBA FUJAIRAH, United Arab Emirates

 

Fax 00971 9 2 442846

 

raseyd@emirates.net.ae    http://alhafeez.org/rashid/

 

 

 

 

 

 

 

:   admin       (   )
: 0 /5 ( 0 )

: 26-11-2009

: 653