عرض المقال :Lingala3
  الصفحة الرئيسية » مـقـالات الموقـــع » كشف البلية بفضح الأحمدية » Non - Arabic Articles » Lingala

اسم المقال : Lingala3
كاتب المقال: webmaster
justify" class="MsoBodyText">

O Bandeko,

Mirza Ghulam asilaki koyea ete ye azali Imam Mahdi te, pe azalaki Mokambi ya Nzambe te oyo Santu Propheta ( SAW) apesaki sango naye, balandi baye bazali kolikya ete ye azalaki Imam Mahdi. Soki ye azalaki solo Imam Mahdi elakisi na polele ete akokaki te kosala mosala muaye na ndege elongombani.

Bandeko Batangi !

Mirza Ghulam ye moko asilaki komiyeba ete oyo nyoso azalaki komisala ezali na bokabwani na maloba ya Santu Propheta Muhammad (SAW), kasi lokola atondamaki na makanisi ma satana ayebaki te ete makambo azali kosala ezali masumu minene penza. Oye azalaki komilobela ete :

« Tina ya makambo na biso ezali Hadith te kasi ezali nde Qur’an na Wahi « bosakoli buana » ( révélation ) , ekoyelaka ngai, ezali boye, tozali kokamata ba hadiths oyo ekokani na Qur’an oyo ezali koyangana te bosakoli bua ngai. Ba hadiths oyo etikali nazali kobwaka yango lokola kasa ya bosoto ». ( Roohani Khazain, vol 19 p. 140).

Bandeko Batangi !

Emonani na polele ete Mozalisi ya Lingomba Ahmaddiya asilaki kobuka lukuta na maloba maye mazali koyangana Qur’an na bahadiths. Ba Nganga Nzambe ba Islam ya Mecque, Medine, Egypto na ba musulmans ba Molongo mobima banso basili koloba ete Mirza Ghulam na balandi baye banso bazali olibanda ya Islam. Mirza Ghulam akufa esili koleka mibuu kama ( 100 ans ), kasi bayekoli baye bazali kaka kokosa batu na kombo ya Islam.

Kozanga boyebi bua mateya ma Islam, kozanga boyebi solo bomoto bua Mirza Ghulam pe kozanga koyeba mateya maye yango nde ezali ete bayekoli

( Missionnaires )ba Ahmaddiya bakoka kozua nzela.

Ezali lotomo na musulmans moko na moko amibatela na lukuta lona. Musulman moko te akoka kokota te na montambo ya boyinga. Biso pe tokolemba te koyebisa bazoba ( ignorants, soki mutu moko alandi bango, ekozala pona bolingi buaye moko pamba te Islam ezali kokangisa mutu na makasi te.

Nzambe batela ba Musulmans na binzambi nzambi ya lukuta ya Lingoma la Ahmaddiya / Qadiyani pona kombo la Islam.

O Nzambe ! zongisa ba musulmans bazoba ( ignorants) baye basili kokangama o kati ya motambo mua bango, zongisa bango o nzela ya Islam, salisa bango bakoka kobongola solo na lukuta, osalisa bango batanga nzela ya semba ! Amin.

Wa maa alaina illa al – bilaagh

Wassalam Alaikum Wr Wb

Dr Syed Rashid Ali

P.O. Box: 11560

Dibba, Al Fujairah

United Arab Emirates

http://alhafeez.org/rashid

rasyed@emirates.net.ae

الصفحات[ 1] [2]
اضيف بواسطة :   admin       رتبته (   الادارة )
التقييم: 0 /5 ( 0 صوت )

تاريخ الاضافة: 26-11-2009

الزوار: 3652


المقالات المتشابهة
المقال السابقة
Religious Adventurism in Islam
المقالات المتشابهة
المقال التالية
Lingala2
جديد قسم مـقـالات الموقـــع
القائمة الرئيسية
البحث
البحث في
القائمة البريدية

اشتراك

الغاء الاشتراك